Ba ndeko kopesa produit to service na yo kombo ya marque, ekoki komema impact na Business na yo. Ideologie mosusu ezali, okoki ko inventer kombo to marque na yo, tozua exemple neti boite ya "MILK NIDO" ya marque "NESTLE". Longola contenu ya milk poudre na linzanza ya Nido, bongola yango par exemple na linzanza bakoma "Lingala Milk". Donc eloko osali ezali juste emballage (Packaging), le meme Milk Nido Nestle, mais na boite bakoma "Lingala Milk", donc oyo eza Business Concept to Modele ya Entrepreneur Williams Jonatham na USA, ye asombaka biloko ya ba companies misusu, a tourner yango na emballage na kombo ya companie na ye. Lelo oyo Business Turnover Rendement na ye, eza na valeur ya USD 12 Billions. Exemple mosusu ba "Eau Minerale", eza ebele na marche, mais soki otali l'eau minerale potable neti "EVIAN" e domina marche ya eau minerale. Bouteille nango kaka ya pamba eza deja ko impressioner yo osomba yango, et en plus eza vraiment mayi moko ya qualite superieure. Donc yo pe okoki kosala bouteille ya l'eau minerale na yo, otie kombo ya companie na yo, okomona ndenge Communaute Africaine bakosomba yango. Donc "Emballage Packaging" eza pe likanisi mosusu. Zua mayele oyo salela yango. Copyright 2012 Mbuta Matima depuis United Kingdom.