Monday, 23 September 2013

Soki Communaute na bino ezo marcher bien te elingi koloba boponaki ya mabe

Communaute ezali groupe ya bato oyo ba developer relation munene na kati na bango, na likambo moko (to interet commune)

Ba differents categories ya ba communaute yango oyo:

1. Communaute de circonstance: Oyo ezali communaute ya bato oyo bazali ko experimenter ba situations ya ndenge moko. Eza mingi example lokola bato ya malade ya Diabetes, Estomac, Cancer etc...  Na communaute ya boye esengeli kobanda discussion munene oyo eko faciliter ba emotions ya ba membres entre eux. Elingi koloba kotuna ba membres ba experiences na bango na malade bazo traverser. Bakoki kokutana Live esika moko epai wapi bakoki ko partager ba emotions na bango, pe ko consoler bango na ba conseilles ya malamu.

2. Communaute ya Interet: Ezali groupe ya bato oyo bazali ko partager passion, to eloko oyo bango balingaka mingi, pe batia yango kati na mitu na bango. Example lokola communaute ya bato balingaka cinema, musique, fashion, different cultures et plus..
Ba membres bako travailler ensemble pona ko faciliter interaction (bokutani) pona bango nionso bayekola mayele oyo ba misusu bazangi na passion na bango, na topic oyo bapona, ko partager esengo ya topic oyo bango balingi, example fashion.

3. Communaute d'action: Oyo ezali groupe ya bato oyo bazali connecter, po balingi ba changer eloko moko na mokili, example ba communautes neti: Greenpeace, Croix rouge, ba Combattants ya diaspora Congolaise. Na genre ya communaute oyo esengeli kozala na patience ya long terme pona ko aboutir na ba objectifs na bino, bokozala na experience ya ba hauts et les bas ensemble, komata na kokita bako souffrir yango elongo

4. Communuate ya Practice (expertise): communaute oyo ezali groupe ya bato oyo bazali ko participer na activite moko, ezali communaute ya ba professions, example: meme sport, ba cultivateurs, ba artistes muasiciens, ba avocats, ba pasteurs etc.. Objectif na bango eza musala ezala malamu pe en professionnalisme. Awa ba membres bako partager makambo oyo eza malamu to mabe, po emema bango na sens ya professionnalisme. Politique, Sociale, Technologie, Economie eza na impact makasi na type ya communaute oyo.

Solution: Esengeli opona moko, ko mitungisa te, ekoma te que oza na besoin na yango nionso, decider quelle type ya communaute olingi o developer.

Soki communaute na yo eza ko marcher bien te, pe eza na ba problemes, elingi koloba que oponaki genre ya communaute ya mabe, donc okoki ko changer mususu.

Friday, 20 September 2013

Techniques ya kosangisa ba membres ya communaute

"Invite bato na sale moko pe tika bango basala conversations entre eux"  Soki okoka ko organiser likambo ya boye, elingi kolakisa que ozali kosala mosala malamu. Soki pe ozali Businessman, ko inviter ba clients na yo ezali pe facile soki oyebaka te.

Voici ba examples:
1. Plombier akoki ko organiser chaque mois kosangisa ba clients na ye, po alakisa bango ndenge bakoki ko resoudre ba problemes ya mike mike sans babenga ye tres urgent, pe tika ba clients na yo basolola entre bango na bango.

Plombier akoki kosangana ensemble na mecanicien to electricien po ememela bango ba clients ebele

2. Pizza restaurant ekoki ko inviter ba regulier clients na yango chaque mois po a offrir bango "pizza gratuit" Y compris ba jus (boissons sucree gratuit), na biloko ya kolia. Client moko te akoboya invitation ya lolenge boye. a moin que azala empecher. Bakosepela bakutana na baninga na bango ba clients, quelle esengo okopesa ba clients na yo

3. Ba companies ya telecommunication bakoki, pe ko louer sale chaque mois, po ba offrir ba abonnees na yango (clients) biloko ya kolia pe ba boissons sucree. Ba clients na ye bakosepela ko partager na baninga. Boye ekokoma centre ya communaute ya ba clients na yango, tala monene ya likambo ndenge bokozua controle na bango nionso.

4. Organisation ya monene (Mega Organisation) ekoki pe ko inviter ba clients loyale na ye chaque mois na siege sociale, po bapesa bango ba vrai compte rendu, ndenge nini organisation na bango ezali ko marcher, bazosala musala malamu? to te. Ekozala opportunite ba clients baya koyebana pe ba partager ensemble na baninga ba clients, tango bazali kolia pe komela gratuit. Bakoki pe ko profiter kotala ba produit nini ya sika organisation oyo ezo compter ko lancer na future.

NB: Omoni ba technique oyo? okozua yango kaka pona simple bileyi na masanga oyo okokabela communaute na yo. Okoki kosangisa bato ya ndenge nionso soki olingi basangana esika moko po ba partager na baninga.

Oyo ezali vraiment technique ya malamu soki olingo otonga une communaute digne et efficace. Mawa mingi ba companies ebele baza na mbongo kasi basalaka yango te

Source: https://bakongocollective.wordpress.com

Wednesday, 18 September 2013

Les 4 fondamentaux d'une bonne communaute

1. Sense ya ko apartenir:  (J'appartiens a cette communaute), member il faut a se sentir a l'aise que aza na place oyo eza ya ye. Communaute en ligne oyo eza credible etiaka ba membres na yango na place oyo esengeli (respect toujours) Chaque member azo sentir a l'aise pe esengo ya kozala inclus na communaute.

2. Support Nutuelle:  Membres bakoki kozua support (aide) na baninga membres, pe na puissance ya kopesa aide yango sans hesitation. Membres bako aider baninga oyo bazali na ba probleme serieux, ou bien ko ouvrir bango ba opportunites misusu, telle que (employ, jobs, misala) pe kopesa bango ba resources to acces, oyo bakokaki kozua te ailleurs.

3. Grande Influence:  Membres bayebi ete bazali ko partager na groupe oyo ezali na influence munene, oyo soki na ye moko akokaki ko accomplir yango te. Membres bakozala na efficacite munene pe esengo ya ko joindre communaute en ligne oyo, communaute oyo pe il faut epesa membre nionso influence envers baninga misusu po ba se sentir a l'aise.

4. Exploration:  Ko permettre member nionso ba explorer ba idees misusu oyo soki bazalaki bango moko, bakokaki kozua yango te, ba iddes ya sika, pe ba echanges ya makanisi, ba experiences, ba resources, ko partager ensemble pe ko discuter yango elongo, oyo ekomema communaute na ba innovations ya sika.

Est ce que communaute en ligne na bino ezali ko presenter moko ya ba idees oyo? Ezali kopesa ba membres na ye tous le 4 (quatres) fondamentaux oyo? Eloko nini bokoki ko changer?

Source: https://bakongocollective.wordpress.com 

Banda ko contacter ba membres sikoyo

Sikoyo banda ko localiser ba membres yango (sala yango liboso o decider platfome nini oko enregistrer communaute en ligne oyo), solola na a peut pret 10-15 membres, yebisa bango lisolo ya ko creer communaute en ligne elongo na bango, na sujet to topic oyo bakozala satitsfait na yango. Yebisa bango bapesa expertise (mayele) na bango pona ko developer communaute oyo, tuna bango genre nini ya communaute en ligne ba preferer bo creer, tuna bango soki balingi ko aider bo creer yango ensemble na bango, après bapesa yo ba emails na bango po otia bango na liste ya e-mailing en connection na baninga, (ou ata bo creer forum)

Sikoyo sala mua ba conversations na 10-15 membres oyo, tuna bango mituna lokola, problem nini baza na yango, oyo bazo sentir difficile na secteur oyo baza concerner, ex: travail, eglise, marriage, amitie etc... tuna bango nani akoki kozala na communaute en ligne oyo, na nani akoki kozala te, zala sur ozala na stable ya 10-15 membres, ekoka kozua yo, semaine to mois. Mais oza na besoin ya ba membres stable oyo rapidement po o generer traffic na platform en ligne oyo oko choisir.

Boye nde okosala foundation ya malamu pona ko creer une communaute en ligne avec zero membre.
Tozo continuer botanga ba sujet misusu ekolanda, pe bopesa makanisi na bino, elongo nde tokokende liboso.

Source: https://bakongocollective.wordpress.com

Comment faire pour commencer une communaute en ligne avec, 0 membre

Pona ko banda une communaute en ligne avec zero membre, ya liboso il faut kozala specifique, identifier ba personnes reelle pona yango, lokola ba vrais amis (es) na yo, luka oyeba eloko nini vraiment bazalaka interesser na yango, communaute oyo eza pona marketing ya produit na yo te, eza uniquement pona communaute en ligne.

Luka oyeba eloko nini ba reelle membres na yo basalaka na ba temps libre na bango, ba depensaka mbongo na bango na biloko nini, image nini ba membres oyo ba presentaka na communaute na bino, eglise nini bakendaka kosambela, eloko nini balingaka kosolola mingi comme topic na internet.

Luka pe moyen otala ba communaute misusu en ligne po oyekola lolenge bazo travailler, sikoyo tuna ba questions oyo: eloko nini ekosala que communaute en ligne na biso ezala unique? est ce bokozala focaliser na topic moko kaka to ekozala geographiquement na ba different regions? Eloko nini communaute oyo ekozala focaliser na yango?

Bandeko natikeli bino bobakisa ba idees na biyano oyo

Source: https://bakongocollective.wordpress.com