Une autre facon ya ko developer produit to service, eza ko reduire perte du temps, oyo eko apporter impact na vie ya ba Clients na yo. Quelque exemple ya perte du temps yango oyo: Liboso: Kotelema na molongo na Hotel Reception, mibale: Kozela Ordinateur e s'allumer, misato: Bilamba oyo eza na besoin basokola, minei: Kozela Docteur abenga tour na yo na Dispensaire, mitano: Ko preparer Supermarche avant ba Clients bakota. Tala ndenge perte ya temps ezali awa. Exemple ya liboso kotelema na molongo na Hotel eza tres fatiguant, tango oza deja na besoin okota na chambre o relaxer. C'est a dire kozela na molongo na Hotel Reception eza deja perte du temps. Plusieurs Hotels ba employaka "extra staff" (Travailleurs), pona ko reduire perte du temps oyo. Malheureusement plusieurs Hotels basalaka yango te. Il faut ozala kaka Genie po ozua idee ya kobakisa ba Travailleurs, soki molongo ezoleka molayi. Ba misusu basala philosophie ya "Express Checkout" a partir ya ba chambres na bango, ba enregistrer tous les donnees du Payements et Information pona ko eviter molongo na Reception. Pona bilamba ya kosokola, tokoki ko inventer ba savons poussiere detergents, mais eloko ba Clients baza nango besoin savon oyo ekotelisa bilamba malamu, au lieu ya ko perdre temps na ba savons unitile. Raison pour la quelle ba Supermarche misusu ba appliqua systeme ya 24h sur 24h pona ko eviter perte du temps ya ko preparer magasin avant ouverture ba Clents bakota. Eza na perte du temps moko ya kosakana te, par rapport ya Supermarche oyo bakangaka pe basala "nettoyage et packaging" avant ya bafungola. Yo pe luka eloko nini oyo omoni ezo perdre bato temps. Utiliser modele to technique yango comme produit to service na yo. Aider bango na likambo oyo ezo perdre bango temps. Okomona ndenge ba Clients na yo bakosepela na impact oyo o faciliter bango.
Copyright 2010 Mbuta Matima depuis United Kingdom.
Vraiment natangi blog na yo, epesi nga motivation moko okoki ko imaginer te, nandimi lelo que na RD Congo ba entrepreneurs ya ba idees bazali. Na develloper ba boules na nga na blog oyo, yango nazui likanisi natiela yo kamua lisungi na Donation boutton po o continuer kotiela biso ba idees ya boye. Tala compte na yo okomona Donation. Pasteur Ngoma.
ReplyDeletePasteur Ngoma, merci mingi pona soutien na yo, natali na compte namoni £10 lisungi oyo opesi pona Business enseignement na blog na biso. Vraiment Nzambe abakisela yo ebele epai olongoli. Tika lingomba na yo ekende liboso et surtout Je suis sur na genre ya motema oza na yango, bandimi na yo bazali kozua mateya ya malamu. Merci.
ReplyDelete