Friday, 20 April 2012

Business: Clef n:3 ko resoudre problemes


Mes amis vie eza na ba problemes ebele ya ko decouvrir. Tondimaka te confusion na sima ya ba cables ya ba Ordinateurs ekokaki kozala simplifier. Jusque BLUETOOTH WIRELESS technologie ekueyelaki biso. Avant ya ko resoudre probleme il faut oyeba existence na yango, pe mituna question soki okoki ko resoudre yango. "Chad Varah" Britanique oyo a fondaki "Les Samaritains" na annee 1950, a notaki que plus ou moins 3 personnes bazalaki ko commettre suicide chaque Jour na Londres. Amitunaki question est ce que likambo oyo eza possible to acceptable?. Ebandeli na "Chad Varah" a raisonaki, ezalaki necessaire ya ko offrir bango "Conseille Specialiste" abandaki liboso na koyamba ba suicides, pe kosolola na bango po ayeba, pourquoi bazalaki ko suicider, pe a enseignaki bango ba principes bakokaki kolanda, pona ko reduire nombre ya batu bazalaki ko suicider, na Organisation na ye "Les Samaritains". Jusque a mobilizaki ba Organisations ya minene, pe bakotaki po ba soutenir ye. Resultat ba suicides esilaki na tango wana. Voila yango toyokaka "Les Samaritains" moto malamu. Plus recent groupe ya ba Entrepreneurs oyo bazuaki likanisi ya ko developer "Voiture Electrique" sans kotia essence, po prix ya Petrole emataka pamba pamba. Nebandeli likanisi yango bato mingi basekaki bango, mais lelo oyo tozali koloba boye na "Kyoto Japan Nippon" pe mikili misusu, Voiture Electrique ekoma reve et realite, bato bakanga minoko batika koseka, po ba voiture yango ekoma kotambola na circulation. Kutu bato bakoma ko preferer yango na cadre ya contribuition ya "Rechaufement Climatique, Global Warming", pona conservation de la nature. Et voila yo pe luka eloko nini omoni bato bazali na dificulte na yango, profiter ko resoudre probleme na bango, okomona ndenge ekofuta. Bouler malamu na nzinga nzinga na yo, eloko nini ezosala bato pasi mingi, zua idee yango appliquer, pe komisa yango Business na yo. Na "Engleterre" par exemple magasin "Kin2000 Wenze ya Gambela" na London, proprietaire Papa KASS, amonaki que bato baza na ba provinces bazalaki na pasi mngi pona kosomba biloko na biso ya mboka, toujours il faut bamata Londres na magasin na ye. Imaginer ba "Stock ya ba Fetes" esengaka vraiment achat moko monene. Alors "Kin2000 Wenze ya Gambela" azuaki likanisi alongola bato ya provinces pasi wana. A planter magasin mosusu na "Leeds City" UK, pona ko favoriser bato ya Nord ya England. Lelo "Kin2000 Wenze ya Gambela" ekoma kokotisa recettes na ndenga muke te. Voir meme asala na systeme ya livraison a domicile. Bouler malamu moninga luka idee nini oyo omoni bato bazali na pasi na yango, et resoudre probleme na bango, okomona resultat na Business na yo.
Copyright 2012 Mbuta Matima depuis United Kingdom.

1 comment:

  1. Merci mingi, toza na besoin ya bato neti bino, nayekoli mayele ebele opesi awa, nakosala nionso nga pe na utiliser yango na business nazolinga nasala, nakozongaka awa koyekola lisusu.

    ReplyDelete