Monday, 16 April 2012

Business: Entrepreneur genie

Mokili eza na ba idees commerciale ebele, mais faut mutu abimisa idee yango. Ko decider quelle genre ya Business oko etablir eza jeux moke te. Tozua exemple na tango ya kala toyebaka "Savon" ya libanga neti savon le coq, munganga, mekako etc... mais lelo savon ekoma pe ya liquide. Exemple mosusu, tango tolobaka "Bic" idee na biso ezalaka mingi "Encre", mais soki olandeli malamu oko retrouver Genie moko abimaki po a creer "Bic Electronique" oyo to signaka ba colis soki tozui lettre recomemdee, ou DHL colis parcel.  "Avion" basala yango na idee ya ndeke na mapapu, mais Genie moko abimaki aye kosala ideologie ya "Helicopter" ezanga mapapu. Ba "Trains" ya liboso basalaka yango na idee ya Cheval na Charette. "Sapatu" ezalaka na ba lacets, mais oyo pe ezanga lacets eza kaka sapatu. Eloko ya motuya eza ba "Ordinateurs" ya kala ezalaka ko occuper mesure ya chambre mobimba, mais ti Entrepreneur Genie moko abimaki na idee ya ko simplifier yango ekoma moke. resultats tango bato neti ba "Bill Gates" bakueyelaki marche yango, bakomisi Ordinateur taille ya moke.Lelo tokoma na ba Desktop na ba Ordinateurs Portable (Laptops). Tala eloko neti "Telephone Mobile" lelo eza na Camera, MP3 Palyer, Organizer, Calendrier, ekoki pe kobenga to ko recevoir appel, pe ba SMS (Text Messages). Yango lelo ba Banques bakomi interesser. tokomi ko checker ba Comptes Banquaire na biso na ba Portables Mobile. Voila comment bongo to makanisi ya Entrepreneur esalaka. Na yango tokoki pe koya na ba idees na biso na blog oyo, de facon tosangisa mayele pona developement ya RD Congo na biso. Bo continuer kotanga tokofungola ba clefs ebele awa.
Copyright 2012 Mbuta Matima depuis United Kingdom.

No comments:

Post a Comment