Tuesday, 20 November 2012

ebay.com: Techniques ya Koteka (selling)




Bandeko, bato ebele bamitunaka question, ndenge nini bakoki kosala pona koteka na ebay.com. Site oyo ekoki ko aider kolongola biloko (items) oyo oza nango besoin te na ndako na yo, au lieu obuaka yango.

Bato ebele ba realisaka te, ba valeurs ya biloko baza nango na ba ndako. Biloko nionso oyo ozalaka nango lisusu besoin te ex: ba jouers ya bana (games), ba telephones portable (mobile phones), ba tablets PC, ba sac a main (hand bags), ba DVD jouers (games) ya bana, ba bijoux (jewelleries), ba sapato (shoes) etc... ekoki kopesa yo mbongo (income) oyo okanaki te na vie na yo.

Bato oyo basalaka yango, bakoma komona mbongo (income), ezokota na ba comptes bancaire na bango (bank accounts) ata kutu bazali ya kolala, mais bato bazo clicker (clik) biloko na bango, po basomba. Po kosomba en ligne (online) ezalaka 24h, non stop.

Donc bosalela mayele oyo ya koteka (selling) na ebay.com biloko oyo etondi na ba ndako na bino, oyo eza kutu na place ya kotia yango te. Soki bosali yango bokomona mbongo (revenue) ekokota na ba comptes (accounts) na bino, oyo kutu bokanaki te

Sunday, 18 November 2012

Cadeau ya Noel pona Mwasi na yo (Lingerie Christmas Gift)


choix ya mibali pona ba soutiens na ba calecons ya basi na bango ezalaka souvent difficile pona kopesa cadeau. Tango ekomaka pona kopona soutien na calecon pona mwasi na yo, comme cadeau ya noel, mibali ya Grande Bretagne (UK) bayebi yango malamu.

Basi ebele totunaki, bandimi que balata jamais ba cadeaux mibali na bango basombela bango, ndambo kaka balobaki balata yango, une ou deux fois seulement, po basepela na yango te, lingalaversionbusiness eza na sympatie pona mibali tango bakotaka na zone rouge ya ba magasins (shop) pona kopona soutien na calecon ya basi na bango. Kasi te liboso okota kuna sala recherche, eloko nini mwasi na yo akoki kokweya amoureuse tango omemi yango.

Liste yango oyo, basi bopesa mibali na bino avant bakota na zone rouge, pona koponela yo soutien na calecon pona cadeau de noel (lingerie christmas gift)

1: Yeba taille na ye
Tala ba tirroirs place atiaka ba soutiens na ba calecons na ye, soki omoni yango te, ko risquer kosomba te, ponela ye robe de nuit ya kitoko.
2: Yeba gout na ye
Awa ekolakisa que oyebi ko payer attention na ba gout na ye. Est ce que alingaka fashion, strings, classic etc... wana oko gagner motema na ye.
3: Ezala speciale
Basi ebele balingaka ba soutiens na ba calecons ya marque, fashion, mode, style etc.. oyo bakokaka kutu kosomba te, po eza cher, donc kobanga te sombela ye ya cher pe luxe
4: Zala stratege
Senga aide, soit ozosomba yango en ligne ou off ligne, ba magasins (shop) ebele, baza wana pe pona ko aider ba clients na bango ya bana mibali, po ba se gener te pona kopona soutien na calecon, senga aide balakisa yo choix ya bien pona cadeau ya mwasi na yo. Kobosana te emballage cadeau ezala pe ya valeur.

Bandeko bo hesiter te kotika ba comentaires, toyeba soki basi na biso basepeli na ba cadeaux ya noel na bango (lingerie christmas gifts)

Friday, 16 November 2012

Business: Immigrants Mobile Phones Top Up Recharge





Bandeko lingalaversionbusiness toye na makanisi ya ko presenter bino idee oyo enfin que "ensemble c'est mieux" ya ko apporter assistance pona ba ndeko batikala na Republique Democratique du Congo.

Toza na ba credits, Top up, Recharge ya Airtel pona koteka. Soki osombi credit, top up, epai na biso, sima yo otindeli ndeko na yo na Congo comme cadeau "Top up Gift"  Ekosala ndeko na yo esengo mingi, soki otieli ye credit na phone na ye, a partir ya diaspora. Soki bosepeli na makanisi oyo, bo hesiter te bo contacter biso, po bosomba yango. Mobile Phone Top up, Recharge.

Monday, 1 October 2012

Business: Telephone Portable Chargeur Solaire


Bonjour mes Freres et Soeurs,
Toye na Business likanisi ya kolakisa bino chargeur solaire oyo pona kotindela ba ndeko na Congo pona kosunga bango ba chargeaka ba telephone portable na bango na moyen ya energie solaire. Vous savez tres bien ndenge mboka na biso ezali na probleme ya courant electrique. Donc voici produit to proposer bino bosomba pe botindela ba ndeko na Congo. Imaginer esengo nini bokosala bango soki bosombi pe botindi. Ezali lisungi moko monene po bakobanda ko charger ba phones na bango na moyen ya energie solaire oyo, tres facile. Oyo azali na yango besoin atindela biso adresse postale na ye na email: andradangoma@yahoo.co.uk   Pona prix tozali koteka yango £50 seulement. Une fois tozui payement na yo, tokotindela yo yango gratuit na poste. Merci Bandeko.
Copyright 2012 Mbuta Matima depuis United Kingdom

Friday, 1 June 2012

Business: Clef n:4 Inventer marque na yo


Ba ndeko kopesa produit to service na yo kombo ya marque, ekoki komema impact na Business na yo. Ideologie mosusu ezali, okoki ko inventer kombo to marque na yo, tozua exemple neti boite ya "MILK NIDO" ya marque "NESTLE". Longola contenu ya milk poudre na linzanza ya Nido, bongola yango par exemple na linzanza bakoma "Lingala Milk". Donc eloko osali ezali juste emballage (Packaging), le meme Milk Nido Nestle, mais na boite bakoma "Lingala Milk", donc oyo eza Business Concept to Modele ya Entrepreneur Williams Jonatham na USA, ye asombaka biloko ya ba companies misusu, a tourner yango na emballage na kombo ya companie na ye. Lelo oyo Business Turnover Rendement na ye, eza na valeur ya USD 12 Billions. Exemple mosusu ba "Eau Minerale", eza ebele na marche, mais soki otali l'eau minerale potable neti "EVIAN" e domina marche ya eau minerale. Bouteille nango kaka ya pamba eza deja ko impressioner yo osomba yango, et en plus eza vraiment mayi moko ya qualite superieure. Donc yo pe okoki kosala bouteille ya l'eau minerale na yo, otie kombo ya companie na yo, okomona ndenge Communaute Africaine bakosomba yango. Donc "Emballage Packaging" eza pe likanisi mosusu. Zua mayele oyo salela yango.
Copyright 2012 Mbuta Matima depuis United Kingdom.

Friday, 20 April 2012

Business: Clef n:3 ko resoudre problemes


Mes amis vie eza na ba problemes ebele ya ko decouvrir. Tondimaka te confusion na sima ya ba cables ya ba Ordinateurs ekokaki kozala simplifier. Jusque BLUETOOTH WIRELESS technologie ekueyelaki biso. Avant ya ko resoudre probleme il faut oyeba existence na yango, pe mituna question soki okoki ko resoudre yango. "Chad Varah" Britanique oyo a fondaki "Les Samaritains" na annee 1950, a notaki que plus ou moins 3 personnes bazalaki ko commettre suicide chaque Jour na Londres. Amitunaki question est ce que likambo oyo eza possible to acceptable?. Ebandeli na "Chad Varah" a raisonaki, ezalaki necessaire ya ko offrir bango "Conseille Specialiste" abandaki liboso na koyamba ba suicides, pe kosolola na bango po ayeba, pourquoi bazalaki ko suicider, pe a enseignaki bango ba principes bakokaki kolanda, pona ko reduire nombre ya batu bazalaki ko suicider, na Organisation na ye "Les Samaritains". Jusque a mobilizaki ba Organisations ya minene, pe bakotaki po ba soutenir ye. Resultat ba suicides esilaki na tango wana. Voila yango toyokaka "Les Samaritains" moto malamu. Plus recent groupe ya ba Entrepreneurs oyo bazuaki likanisi ya ko developer "Voiture Electrique" sans kotia essence, po prix ya Petrole emataka pamba pamba. Nebandeli likanisi yango bato mingi basekaki bango, mais lelo oyo tozali koloba boye na "Kyoto Japan Nippon" pe mikili misusu, Voiture Electrique ekoma reve et realite, bato bakanga minoko batika koseka, po ba voiture yango ekoma kotambola na circulation. Kutu bato bakoma ko preferer yango na cadre ya contribuition ya "Rechaufement Climatique, Global Warming", pona conservation de la nature. Et voila yo pe luka eloko nini omoni bato bazali na dificulte na yango, profiter ko resoudre probleme na bango, okomona ndenge ekofuta. Bouler malamu na nzinga nzinga na yo, eloko nini ezosala bato pasi mingi, zua idee yango appliquer, pe komisa yango Business na yo. Na "Engleterre" par exemple magasin "Kin2000 Wenze ya Gambela" na London, proprietaire Papa KASS, amonaki que bato baza na ba provinces bazalaki na pasi mngi pona kosomba biloko na biso ya mboka, toujours il faut bamata Londres na magasin na ye. Imaginer ba "Stock ya ba Fetes" esengaka vraiment achat moko monene. Alors "Kin2000 Wenze ya Gambela" azuaki likanisi alongola bato ya provinces pasi wana. A planter magasin mosusu na "Leeds City" UK, pona ko favoriser bato ya Nord ya England. Lelo "Kin2000 Wenze ya Gambela" ekoma kokotisa recettes na ndenga muke te. Voir meme asala na systeme ya livraison a domicile. Bouler malamu moninga luka idee nini oyo omoni bato bazali na pasi na yango, et resoudre probleme na bango, okomona resultat na Business na yo.
Copyright 2012 Mbuta Matima depuis United Kingdom.

Thursday, 19 April 2012

Business: Clef n:2 ko reduire perte du temps

Une autre facon ya ko developer produit to service, eza ko reduire perte du temps, oyo eko apporter impact na vie ya ba Clients na yo. Quelque exemple ya perte du temps yango oyo: Liboso: Kotelema na molongo na Hotel Reception, mibale: Kozela Ordinateur e s'allumer, misato: Bilamba oyo eza na besoin basokola, minei: Kozela Docteur abenga tour na yo na Dispensaire, mitano: Ko preparer Supermarche avant ba Clients bakota. Tala ndenge perte ya temps ezali awa. Exemple ya liboso kotelema na molongo na Hotel eza tres fatiguant, tango oza deja na besoin okota na chambre o relaxer. C'est a dire kozela na molongo na Hotel Reception eza deja perte du temps. Plusieurs Hotels ba employaka "extra staff" (Travailleurs), pona ko reduire perte du temps oyo. Malheureusement plusieurs Hotels basalaka yango te. Il faut ozala kaka Genie po ozua idee ya kobakisa ba Travailleurs, soki molongo ezoleka molayi. Ba misusu basala philosophie ya "Express Checkout" a partir ya ba chambres na bango, ba enregistrer tous les donnees du Payements et Information pona ko eviter molongo na Reception. Pona bilamba ya kosokola, tokoki ko inventer ba savons poussiere detergents, mais eloko ba Clients baza nango besoin savon oyo ekotelisa bilamba malamu, au lieu ya ko perdre temps na ba savons unitile. Raison pour la quelle ba Supermarche misusu ba appliqua systeme ya 24h sur 24h pona ko eviter perte du temps ya ko preparer magasin avant ouverture ba Clents bakota. Eza na perte du temps moko ya kosakana te, par rapport ya Supermarche oyo bakangaka pe basala "nettoyage et packaging" avant ya bafungola. Yo pe luka eloko nini oyo omoni ezo perdre bato temps. Utiliser modele to technique yango comme produit to service na yo. Aider bango na likambo oyo ezo perdre bango temps. Okomona ndenge ba Clients na yo bakosepela na impact oyo o faciliter bango.
Copyright 2010 Mbuta Matima depuis United Kingdom.

Wednesday, 18 April 2012

Business: Ba clefs ya reussite yango oyo



CLEF N:1  LUKA IDEE OYO BATO MISUSU BA NEGLIGER
Plusieurs Entrepreneurs ba crea ba idees na bango, na biloko oyo batu misusu ba negliger. Philosophie ya liboso ezali na Concept VIDE. Tozalaka na besoin ya verre po tomela Ju d'orange, mais soki otali bien verre eleki Ju d'orange na valeur. Donc verre eza tres important soki eza vide, que soki eza na Ju na kati. Explorer ba spaces vide oyo ba companies ya minene baza interesser te. Exemple ba companies Aerienne neti "Easyjet UK" na "Ryanair Irelande". Ba crea yango na philosophie ya concept vide. Donc vision na bango ezalaki ba attaquer ba Aeroport Regionale, oyo ba companies ya minene neti ba "Air France", "British Airways", "Lufthansa", "American Airlines" bango ba atterissaka na ba Aeroport Regionale te, kaka na ba villes ya minene neti Paris, London, Munchen, New York, Tokyo etc... Donc "Easyjet" na "Ryanair" bakanga opportunites ya ba Aeroport ya mike, po ba prix d'atterissage eza abordable, po bango ba Avions na bango ekoka ko atterir na Paris Charles Degaulle to London Heathrow te. Po kuna ba prix eza makasi mingi, mais na ba Aeroport Regionale neti na Nice France, to Manchester ou Leeds UK, "Easyjet na Ryanair" bakanga marche ba cote wana avec ba prix ya moin cher. Et voila yo na nga pe tokoka ko utiliser la meme philosophie ya concept vide na niveau na biso b'Africains. Na Londres frere moko adopta philosophie oyo, azui marche ya Fret Aerien et Cargo, a partir ya London ti Lubumbashi, sans eleka na Kinshasa. Donc ye asali neti "Easyjet na Ryanair". Developer memoire na yo, luka idee moko ya boye pe appliquer yango. Rapeller que Entrepreneur to Business eza Jeu Mentale. Bongo il faut esala.
Copyright 2012 Mbuta Matima depuis United Kingdom.

Tuesday, 17 April 2012

Buisness: Concept ya idee ya business

Tala invention ya eloko neti "Montre a l'heure", soki ezalaka te vie na biso elingaki kozala desorganiser. Ba Trains elingaki kotambola na l'heure exacte te, Ba Conferences na Hotel Intel Continental to na Cheraton ekokaki kotiama na 8 heures te, soki to mesurer l'heure te. Entrepreneur Concept pe eyaka na ba possibilites ebele,. Soki savon liquide esalamaka te, ti lelo nde tosokolaka kaka na savon le coq, munganga to mekako. Exemple mosusu, tango tolobaka eloko neti "Clef ya ba portes" na biso, to basaka mingi na fungola ya libende to serrure. Mais technologie ekomi mosika, ba Clefs ya ba portes neti Hotel Hilton 5 Etoiles, ekoma ba "Clefs Electronique" neti carte de credit, mais yango eza carte comme Clef (Fungola). Donc voici ba Clefs ekolanda, nakopesa pona Innovation ya ko creer "Business Stable" Bozala mayele, oyo ekondimela a appliquer yango, pe akomona ba resultats.
Copyright 2012 Mbuta Matima depuis United Kingdom

Monday, 16 April 2012

Business: Entrepreneur genie

Mokili eza na ba idees commerciale ebele, mais faut mutu abimisa idee yango. Ko decider quelle genre ya Business oko etablir eza jeux moke te. Tozua exemple na tango ya kala toyebaka "Savon" ya libanga neti savon le coq, munganga, mekako etc... mais lelo savon ekoma pe ya liquide. Exemple mosusu, tango tolobaka "Bic" idee na biso ezalaka mingi "Encre", mais soki olandeli malamu oko retrouver Genie moko abimaki po a creer "Bic Electronique" oyo to signaka ba colis soki tozui lettre recomemdee, ou DHL colis parcel.  "Avion" basala yango na idee ya ndeke na mapapu, mais Genie moko abimaki aye kosala ideologie ya "Helicopter" ezanga mapapu. Ba "Trains" ya liboso basalaka yango na idee ya Cheval na Charette. "Sapatu" ezalaka na ba lacets, mais oyo pe ezanga lacets eza kaka sapatu. Eloko ya motuya eza ba "Ordinateurs" ya kala ezalaka ko occuper mesure ya chambre mobimba, mais ti Entrepreneur Genie moko abimaki na idee ya ko simplifier yango ekoma moke. resultats tango bato neti ba "Bill Gates" bakueyelaki marche yango, bakomisi Ordinateur taille ya moke.Lelo tokoma na ba Desktop na ba Ordinateurs Portable (Laptops). Tala eloko neti "Telephone Mobile" lelo eza na Camera, MP3 Palyer, Organizer, Calendrier, ekoki pe kobenga to ko recevoir appel, pe ba SMS (Text Messages). Yango lelo ba Banques bakomi interesser. tokomi ko checker ba Comptes Banquaire na biso na ba Portables Mobile. Voila comment bongo to makanisi ya Entrepreneur esalaka. Na yango tokoki pe koya na ba idees na biso na blog oyo, de facon tosangisa mayele pona developement ya RD Congo na biso. Bo continuer kotanga tokofungola ba clefs ebele awa.
Copyright 2012 Mbuta Matima depuis United Kingdom.

Sunday, 15 April 2012

Business: Federation des entreprises du congo (Fec)

Ba ndeko na blog oyo, toko parler sur ba idees ya Business
Comment okoki kokoma un Entrepreneur ya lokumu pe succes

Pona kobanda baninga etre Entrpreneur eza eloko ya facile te. Faut to reconaitre il ya de kokita pe komata. Na Etats Uni par exemple 80% ya ba Business ekueyaka pendant 2 ans de existence. Na Royaume Uni pe statistique eza la meme chose. Mais ba fermeture ya ba Business wana bakoki ko evader yango en cherchant ba vrais techniques. Et voila yango toye awa pona kolakisa, pe ko adresser quelle sont ba vrais techniques ya ko appliquer. Bolanda Blog oyo tango inso. To ko expliquer ba clefs ebele ya reussite pona ko devenir un Entrepreneur to Operateur Economique digne.


Copyright 2012 Mbuta Matima depuis United Kingdom