Communaute ezali groupe ya bato oyo ba developer relation munene na kati na bango, na likambo moko (to interet commune)
Ba differents categories ya ba communaute yango oyo:
1. Communaute de circonstance: Oyo ezali communaute ya bato oyo bazali ko experimenter ba situations ya ndenge moko. Eza mingi example lokola bato ya malade ya Diabetes, Estomac, Cancer etc... Na communaute ya boye esengeli kobanda discussion munene oyo eko faciliter ba emotions ya ba membres entre eux. Elingi koloba kotuna ba membres ba experiences na bango na malade bazo traverser. Bakoki kokutana Live esika moko epai wapi bakoki ko partager ba emotions na bango, pe ko consoler bango na ba conseilles ya malamu.
2. Communaute ya Interet: Ezali groupe ya bato oyo bazali ko partager passion, to eloko oyo bango balingaka mingi, pe batia yango kati na mitu na bango. Example lokola communaute ya bato balingaka cinema, musique, fashion, different cultures et plus..
Ba membres bako travailler ensemble pona ko faciliter interaction (bokutani) pona bango nionso bayekola mayele oyo ba misusu bazangi na passion na bango, na topic oyo bapona, ko partager esengo ya topic oyo bango balingi, example fashion.
3. Communaute d'action: Oyo ezali groupe ya bato oyo bazali connecter, po balingi ba changer eloko moko na mokili, example ba communautes neti: Greenpeace, Croix rouge, ba Combattants ya diaspora Congolaise. Na genre ya communaute oyo esengeli kozala na patience ya long terme pona ko aboutir na ba objectifs na bino, bokozala na experience ya ba hauts et les bas ensemble, komata na kokita bako souffrir yango elongo
4. Communuate ya Practice (expertise): communaute oyo ezali groupe ya bato oyo bazali ko participer na activite moko, ezali communaute ya ba professions, example: meme sport, ba cultivateurs, ba artistes muasiciens, ba avocats, ba pasteurs etc.. Objectif na bango eza musala ezala malamu pe en professionnalisme. Awa ba membres bako partager makambo oyo eza malamu to mabe, po emema bango na sens ya professionnalisme. Politique, Sociale, Technologie, Economie eza na impact makasi na type ya communaute oyo.
Solution: Esengeli opona moko, ko mitungisa te, ekoma te que oza na besoin na yango nionso, decider quelle type ya communaute olingi o developer.
Soki communaute na yo eza ko marcher bien te, pe eza na ba problemes, elingi koloba que oponaki genre ya communaute ya mabe, donc okoki ko changer mususu.
No comments:
Post a Comment