Pona ko banda une communaute en ligne avec zero membre, ya liboso il faut kozala specifique, identifier ba personnes reelle pona yango, lokola ba vrais amis (es) na yo, luka oyeba eloko nini vraiment bazalaka interesser na yango, communaute oyo eza pona marketing ya produit na yo te, eza uniquement pona communaute en ligne.
Luka oyeba eloko nini ba reelle membres na yo basalaka na ba temps libre na bango, ba depensaka mbongo na bango na biloko nini, image nini ba membres oyo ba presentaka na communaute na bino, eglise nini bakendaka kosambela, eloko nini balingaka kosolola mingi comme topic na internet.
Luka pe moyen otala ba communaute misusu en ligne po oyekola lolenge bazo travailler, sikoyo tuna ba questions oyo: eloko nini ekosala que communaute en ligne na biso ezala unique? est ce bokozala focaliser na topic moko kaka to ekozala geographiquement na ba different regions? Eloko nini communaute oyo ekozala focaliser na yango?
Bandeko natikeli bino bobakisa ba idees na biyano oyo
Source: https://bakongocollective.wordpress.com
No comments:
Post a Comment