Friday, 20 September 2013

Techniques ya kosangisa ba membres ya communaute

"Invite bato na sale moko pe tika bango basala conversations entre eux"  Soki okoka ko organiser likambo ya boye, elingi kolakisa que ozali kosala mosala malamu. Soki pe ozali Businessman, ko inviter ba clients na yo ezali pe facile soki oyebaka te.

Voici ba examples:
1. Plombier akoki ko organiser chaque mois kosangisa ba clients na ye, po alakisa bango ndenge bakoki ko resoudre ba problemes ya mike mike sans babenga ye tres urgent, pe tika ba clients na yo basolola entre bango na bango.

Plombier akoki kosangana ensemble na mecanicien to electricien po ememela bango ba clients ebele

2. Pizza restaurant ekoki ko inviter ba regulier clients na yango chaque mois po a offrir bango "pizza gratuit" Y compris ba jus (boissons sucree gratuit), na biloko ya kolia. Client moko te akoboya invitation ya lolenge boye. a moin que azala empecher. Bakosepela bakutana na baninga na bango ba clients, quelle esengo okopesa ba clients na yo

3. Ba companies ya telecommunication bakoki, pe ko louer sale chaque mois, po ba offrir ba abonnees na yango (clients) biloko ya kolia pe ba boissons sucree. Ba clients na ye bakosepela ko partager na baninga. Boye ekokoma centre ya communaute ya ba clients na yango, tala monene ya likambo ndenge bokozua controle na bango nionso.

4. Organisation ya monene (Mega Organisation) ekoki pe ko inviter ba clients loyale na ye chaque mois na siege sociale, po bapesa bango ba vrai compte rendu, ndenge nini organisation na bango ezali ko marcher, bazosala musala malamu? to te. Ekozala opportunite ba clients baya koyebana pe ba partager ensemble na baninga ba clients, tango bazali kolia pe komela gratuit. Bakoki pe ko profiter kotala ba produit nini ya sika organisation oyo ezo compter ko lancer na future.

NB: Omoni ba technique oyo? okozua yango kaka pona simple bileyi na masanga oyo okokabela communaute na yo. Okoki kosangisa bato ya ndenge nionso soki olingi basangana esika moko po ba partager na baninga.

Oyo ezali vraiment technique ya malamu soki olingo otonga une communaute digne et efficace. Mawa mingi ba companies ebele baza na mbongo kasi basalaka yango te

Source: https://bakongocollective.wordpress.com

No comments:

Post a Comment