Wednesday, 18 September 2013

Banda ko contacter ba membres sikoyo

Sikoyo banda ko localiser ba membres yango (sala yango liboso o decider platfome nini oko enregistrer communaute en ligne oyo), solola na a peut pret 10-15 membres, yebisa bango lisolo ya ko creer communaute en ligne elongo na bango, na sujet to topic oyo bakozala satitsfait na yango. Yebisa bango bapesa expertise (mayele) na bango pona ko developer communaute oyo, tuna bango genre nini ya communaute en ligne ba preferer bo creer, tuna bango soki balingi ko aider bo creer yango ensemble na bango, après bapesa yo ba emails na bango po otia bango na liste ya e-mailing en connection na baninga, (ou ata bo creer forum)

Sikoyo sala mua ba conversations na 10-15 membres oyo, tuna bango mituna lokola, problem nini baza na yango, oyo bazo sentir difficile na secteur oyo baza concerner, ex: travail, eglise, marriage, amitie etc... tuna bango nani akoki kozala na communaute en ligne oyo, na nani akoki kozala te, zala sur ozala na stable ya 10-15 membres, ekoka kozua yo, semaine to mois. Mais oza na besoin ya ba membres stable oyo rapidement po o generer traffic na platform en ligne oyo oko choisir.

Boye nde okosala foundation ya malamu pona ko creer une communaute en ligne avec zero membre.
Tozo continuer botanga ba sujet misusu ekolanda, pe bopesa makanisi na bino, elongo nde tokokende liboso.

Source: https://bakongocollective.wordpress.com

No comments:

Post a Comment